1 Mwana na ngai, batela mibeko na ngai
2 Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ;
3 Lata yango na loboko na yo lokola lopete,
4 Loba na Bwanya : « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, »
5 mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba
6 Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu
7 namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele,
8 Azalaki koleka na balabala,
9 Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki,
10 Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki
11 azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu,
12 atalaka-talaka na bisika nyonso,
13 Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali,
14 « Nazalaki na niongo ya mbeka ya kozongisa
15 Yango wana, nabimaki mpo na kokutana na yo ;
16 Natandi mbeto na ngai na babulangeti
17 Na mbeto na ngai, nasopi malasi
18 Yaka tolangwa bolingo kino na tongo,
19 pamba te mobali na ngai azali na ye na ndako te,
20 akendeki na saki ya mbongo na maboko,
21 Na nzela ya maloba na ye ya sukali,
22 Elenge mobali alandaki ye mbala moko,
23 kino tango likonga ekotobola ye motema,
24 Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai,
25 Tika ete mwasi ya boye akumba te motema na yo !
26 pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele,
27 Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi,