1 Boni, Bwanya azali kobelela te ?
2 Atelemi na songe ya bangomba, na pembeni ya nzela,
3 azali koganga pene ya bikuke,
4 « Bato, nazali koganga makasi epai na bino,
5 Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli !
6 Boyoka, pamba te nazali na makambo ya motuya
7 Pamba te monoko na ngai ebimisaka maloba ya solo,
8 Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai
9 nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele,
10 Boluka mateya na ngai kasi palata te,
11 pamba te bwanya ezali na motuya
12 Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa,
13 Kotosa Yawe ezali koyina mabe.
14 Toli mpe bososoli ezali ya ngai,
15 Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili,
16 ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu
17 Nalingaka bato oyo balingaka ngai,
18 Bozwi mpe lokumu,
19 Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo,
20 Natambolaka na nzela ya bosembo,
21 mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai
22 Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso,
23 aponaki ngai liboso ete mokili ezala,
24 Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te,
25 liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse
26 tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga
27 Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango,
28 tango atiaki mapata na likolo
29 tango akatelaki ebale monene mondelo
30 nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi,
31 nazalaki kosepela kati na mokili na Ye
32 Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai :
33 Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya,
34 Esengo na moto oyo ayokelaka ngai,
35 Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi
36 Kasi moto oyo atosaka ngai te