1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. »
2 Boye, nasombaki mokaba, ndenge Yawe atindaki ngai mpe nalataki yango na loketo na ngai.
3 Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale :
4 « Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. »
5 Boye nakendeki kobomba mokaba yango na Perati, ndenge Yawe alobaki na ngai.
6 Sima na mikolo ebele, Yawe alobaki na ngai lisusu : « Kende kokamata mokaba oyo nalobaki na yo ete obomba na Perati. »
7 Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango ; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te.
8 Bongo Yawe alobaki na ngai :
9 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi.
10 Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango ; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te.
11 Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›
12 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? ›
13 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.
14 Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »
15 Boyoka malamu mpe bosala keba !
16 Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino,
17 Soki boyoki te,
18 Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi :
19 Bingumba ya sude ekokangama,
20 Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala,
21 Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi
22 Mpe soki omituni :
23 Boni, moto mwindo akoki solo kobongola
24 « Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka
25 Yango nde etumbu na yo,
26 Nakotombola yo bilamba kino na elongi
27 Namoni bondumba na yo