1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki :
2 « Bato ya Yuda bazali na matanga,
3 Bakambi bazali kotinda basali na bango
4 Mabele esili kokawuka,
5 Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokima
6 Ba-ane ya zamba etelemi
7 Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso,
8 Oh Elikya ya Isalaele,
9 Mpo na nini ozali kosala makambo
10 Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo :
11 Bongo, Yawe alobaki na ngai :
12 Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.
13 Kasi nazongiselaki Ye :
14 Yawe alobaki na ngai :
15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai : « Natindaki bango te, atako bazali koloba : ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
16 Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.
17 Loba na bango maloba oyo :
18 Soki nakeyi na zamba,
19 Boni, obwaki solo Yuda ?
20 Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso
21 Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo !
22 Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo,