1 Yobo azongisaki :
2 « Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba,
3 Ata, na mbala nkoto moko,
4 Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi,
5 Alongolaka bangomba na bisika na yango,
6 aningisaka mabele wuta na esika na yango
7 apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te ;
8 Atandaki Ye moko Likolo
9 akelaki bangombolo minene,
10 asalaka makambo minene
11 Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye ;
12 Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ?
13 Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ;
14 Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye ?
15 Ezala soki nazalaki moto ya sembo,
16 Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai,
17 pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi
18 aboyi kotikela ngai tango ya kopema,
19 Soki ezali likambo oyo esengi makasi,
20 Ezala namemaki na ngai ngambo te,
21 Atako nazali sembo,
22 Nyonso ezali kaka ndenge moko !
23 Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata,
24 Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe,
25 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu
26 Ezali kokende penza mbangu
27 Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai,
28 nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso,
29 Lokola esili komonana ete nasali mabe,
30 Ezala namisukoli nzoto na sabuni
31 okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto,
32 Azali moto lokola ngai te
33 Soki ezalaki ata na moto moko
34 moto oyo akokaki kolongola
35 nalingaki kotombola mongongo na ngai