1 Nayini bomoi na ngai !
2 Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te,
3 Boni, ozali kosepela konyokola ngai,
4 Boni, ozali na miso ya mosuni ?
5 Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato,
6 mpo ete oluka mabe na ngai
7 atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te,
8 Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai ;
9 Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai
10 Osopaki ngai lokola miliki te ?
11 Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te ?
12 Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu ;
13 Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo,
14 Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai,
15 Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai !
16 Soki nameki kotombola moto,
17 ozali komemela ngai batatoli ya sika
18 Mpo na nini obimisaki ngai
19 Soki kutu nazalaka na ngai te,
20 Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ?
21 liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te,
22 na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu,