1 Ganga na yo, soki olingi !
2 Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele,
3 Solo, namonaki zoba kozwa misisa ;
4 ‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi,
5 Tika ete moto oyo azali na nzala
6 Pamba te pasi ewutaka na putulu te,
7 moto abotamaka mpo na komona pasi,
8 Kasi soki ezalaki ngai,
9 Nzambe asalaka makambo minene
10 anokisaka mvula na mokili,
11 atombolaka bato oyo babwakama,
12 abebisaka mabongisi ya bato
13 akangaka bato ya bwanya
14 Molili eyelaka bango na moyi ;
15 Nzambe abikisaka mobola
16 Boye, mobola asengeli kozala na elikya,
17 Esengo na moto oyo Nzambe apameli !
18 Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ;
19 Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ;
20 Akokangola yo na kufa,
21 Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo,
22 okoseka kobebisama mpe nzala makasi,
23 pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga,
24 Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ;
25 Okososola ete bana na yo bakozala ebele,
26 Okokita na kunda na kimobange makasi,
27 Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo.