1 Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka ?
2 Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi ?
3 Ekogumbama, ekobota bana na yango
4 Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda,
5 Nani akangoli ane ya zamba ?
6 Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako,
7 Esekaka makelele ya bingumba
8 Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei
9 Mpakasa ekoki kondima kosalela yo ?
10 Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ?
11 Okotia solo elikya na yo kati na yango,
12 Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma
13 Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso,
14 Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele
15 kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango
16 Enyokolaka bana na yango makasi
17 pamba te Nzambe apimeli yango bwanya
18 Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu,
19 Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi
20 Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki ?
21 Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele,
22 Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te,
23 tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango
24 Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele,
25 Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! ›
26 Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka
27 Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo
28 Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga,
29 Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia,
30 Bana na yango emelaka makila.