1 Yobo akobaki koloba :
2 « Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu
3 tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai,
4 Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu
5 tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai
6 tango nzela na ngai etondisamaki na miliki
7 Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka
8 bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama,
9 bakambi bazalaki kozanga maloba
10 bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango
11 Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai
12 pamba te nazalaki kosunga babola
13 Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai,
14 Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ;
15 Nazalaki miso ya mokufi miso
16 nazalaki tata ya moto oyo akelela,
17 nabukaki mbanga ya moto mabe
18 Nazalaki kokanisa : ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko
19 Misisa na ngai ekoluka mayi,
20 Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo,
21 Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi,
22 Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te ;
23 Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula,
24 Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te ;
25 Naponaki nzela mpo na bango