Jó 28

LIN

1 Ezali na esika oyo batimolaka palata,

2 Ebende ewutaka na mabele,

3 Moto asilisaka molili,

4 atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka,

5 Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango

6 Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele,

7 Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango,

8 nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te,

9 Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi

10 atimolaka nzela kati na mabanga,

11 akawusaka mayi ya bibale

12 Kasi bakoki komona bwanya wapi ?

13 Moto ayebaka motuya na yango te,

14 Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te ; »

15 Bakoki kosomba yango te

16 bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri

17 wolo to diama ekoki te kokokana na yango,

18 Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te

19 Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te,

20 Boye, bwanya ewutaka wapi ?

21 Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi,

22 Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango

23 Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango,

24 Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili,

25 Tango apesaki makasi na mopepe

26 tango atiaki mobeko mpo na mvula

27 amonaki bwanya mpe akumisaki yango,

28 Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya !

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado