1 Yobo azongisaki :
2 « Yoka na bokebi maloba na ngai,
3 Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ;
4 Boni, nazali kolela epai ya moto ?
5 Botala ngai, bokokamwa,
6 Soki kaka nakanisi yango, nabangi,
7 Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi ?
8 Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango,
9 Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga,
10 Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa,
11 Lokola kati na etonga ya bameme,
12 Bazali kobeta mbonda mpe lindanda,
13 bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo,
14 Nzokande, balobaka na Nzambe : ‹ Longwa mosika na biso !
15 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani
16 Boni, bozwi na bango ezali
17 Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ?
18 Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango
19 Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe
20 Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye,
21 Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini
22 Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele,
23 Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso,
24 na nzoto sembesembe,
25 mosusu azali kokufa na mawa na motema,
26 Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko
27 Solo, nayebi malamu makanisi
28 bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ?
29 Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela ?
30 ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi,
31 Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye ?
32 Bamemaka ye na lilita,
33 Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye ;
34 Boye, mpo na nini bozali komitungisa