1 Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :
2 « Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola,
3 Nazali koyoka maloba mabe,
4 Solo, oyebi malamu ete wuta kala,
5 elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke,
6 Ata molayi na ye emati kino likolo
7 akobebisama libela lokola nyei na ye,
8 Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te,
9 Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te,
10 bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola,
11 mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge
12 Soki mabe ezali sukali na monoko na ye
13 soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te,
14 bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye,
15 Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ;
16 Akofiba ngenge ya nyoka,
17 Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale,
18 akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba,
19 Pamba te anyokolaki babola
20 Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te,
21 Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye,
22 Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye,
23 Wana azali kotondisa libumu na ye,
24 Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende,
25 soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye
26 Molili makasi ezali kozela libula na ye,
27 Likolo ekobimisa polele mabe na ye,
28 mayi ekomema ndako na ye
29 Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi