1 Yobo azongisaki :
2 « Solo, bozali penza bato ;
3 Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino,
4 Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai,
5 Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi,
6 Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia,
7 Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ;
8 loba na mabele, ekoteya yo ;
9 Kati na yango, ekelamu nini
10 Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso
11 Boni, litoyi emekaka maloba te
12 Bwanya ezalaka kati na bampaka te ?
13 Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe,
14 Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa,
15 Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka ;
16 Makasi mpe elonga ezali ya Ye ;
17 Amemaka bapesi toli na bowumbu
18 afungolaka minyololo ya bakonzi
19 amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu
20 akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu,
21 asopelaka bakonzi soni,
22 abimisaka na pwasa, makambo ya sekele,
23 atombolaka bikolo mpe abebisaka yango,
24 alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo
25 mpo ete batepatepa kati na molili,