1 Mawa na yo, Arieli, Arieli,
2 Kasi nakonyokola Arieli ;
3 Nakozingela yo mpo na kobundisa yo,
4 Okokitisama solo na se,
5 Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu,
6 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo
7 Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu
8 Ekozala lokola moto oyo azali na nzala,
9 Bozanga maloba mpe bokamwa !
10 Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ;
11 Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. »
12 To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nayebi kotanga te. »
13 Nkolo alobi :
14 Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ;
15 Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku
16 Bozali nde kobongola makambo !
17 Etikali kaka tango moke,
18 Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku,
19 Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe,
20 Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te
21 elongo na bato oyo bakweyisaka bato
22 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe,
23 Tango akomona kati na bango bana na ye,
24 Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele,