1 Yawe, ozali Nzambe na ngai ;
2 Okomisaki engumba mopiku ya mabanga,
3 Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu,
4 Ozalaki ekimelo mpo na mobola,
5 mpe lokola moto ya moyi na zelo ya esobe.
6 Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga,
7 Kaka na ngomba oyo,
8 akolimwisa kufa mpo na libela.
9 Na mokolo wana, bakoloba :
10 Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo,
11 Akosembola maboko na Ye kati na yango
12 akobuka bamir milayi na bino ya makasi