1 Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo,
2 Bapimelaka bato pamba bosembo
3 Bokosala nini na mokolo ya kosambisama,
4 Eloko kaka bokotikala na yango :
5 Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ;
6 Natindi ye mpo ete atelemela
7 Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te,
8 Azali koloba :
9 Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ?
10 Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo
11 nakokoka te penza kosala Yelusalemi
12 Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.
13 Pamba te azalaki koloba :
14 Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango
15 Boni, epasola ekoki solo komimatisa
16 Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
17 Pole ya Isalaele ekokoma moto,
18 akozikisa nye bazamba na yango ya minene
19 Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete moke
20 Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango ; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele.
21 Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya.
22 Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.
23 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba.
24 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
25 Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila
26 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito.
27 Na mokolo wana,
28 Tala bango wana bazali koya na Ayati,
29 Baleki kati na bangomba mpe balobi :
30 Oh bato ya Galimi, boganga makasi !
31 Bato ya Madimena bakimi,
32 Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi,
33 Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
34 Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba :