1 Bokumisa Yawe !
2 Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso ;
3 bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza ;
4 bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo,
5 Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe !
6 Atiaki yango mpo na libela ;
7 Bokumisa Yawe wuta na mokili,
8 ezala moto to mvula ya mabanga,
9 ezala bangomba milayi to bangomba mikuse,
10 ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso,
11 ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso,
12 ezala bilenge mibali to bilenge basi,
13 Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe !
14 Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye !