1 Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi,
2 Tia mbeli na mongongo na yo
3 Kolula te bilei na ye ya kitoko,
4 Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo,
5 Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga,
6 Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe
7 pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali.
8 Okosanza eteni oyo oliaki,
9 Kolobaka na zoba te,
10 Kozongisa te na sima mondelo ya kala
11 pamba te Molobeli na bango azalaka makasi,
12 Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko,
13 Kozangisa te kopesa mwana etumbu ;
14 Na kobeta ye fimbu,
15 Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya,
16 Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo,
17 Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu,
18 pamba te suka na yo ekozala solo malamu
19 Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya,
20 Kozala esika moko te na balangwi masanga
21 pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola,
22 Yokela tata oyo aboti yo,
23 Luka bosolo, kasi koteka yango te ;
24 Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi,
25 Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela !
26 Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo,
27 Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene,
28 Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi
29 Mpo na nani : « Ah ngai, mawa ! »
30 Mpo na bato oyo bawumelaka liboso ya masanga ya vino,
31 Kotalaka te masanga ya vino tango ezali motane,
32 Na suka na yango, ekoswa yo lokola nyoka
33 Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa,
34 Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene,
35 Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ;