Oséias 1

LIN

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :

2 Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye :

3 Boye, Oze akendeki kolinga Gomeri, mwana mwasi ya Dibilayimi. Gomeri akomaki na zemi mpe abotelaki ye mwana mobali.

4 Yawe alobaki na ye :

5 Na mokolo wana, nakobuka tolotolo ya Isalaele kati na lubwaku ya Jizireyeli.

6 Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze :

7 Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.

8 Tango Gomeri alongolaki Lo-Rukama na mabele, Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mobali.

9 Yawe alobaki :

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado