Números 32
LIN vs NTLH
1 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.
1 As tribos de Rúben e de Gade tinham gado em grande quantidade. Quando viram que a terra de Jazer e a terra de Gileade eram boas para a criação de gado,
2 Bongo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bayaki koloba na Moyize, na Nganga-Nzambe Eleazari mpe na bakambi ya lisanga :
2 foram falar com Moisés, com o sacerdote Eleazar e com as autoridades do povo. Eles disseram o seguinte:
3 « Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ;
3 — ausente —
4 bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele ; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. »
4 — ausente —
5 Balobaki lisusu : « Soki tozwi ngolu na miso na yo, tika ete mokili oyo epesamela basali na yo lokola libula na biso mpe okatisa biso na ngambo ya Yordani te. »
5 Se o senhor está contente com a gente, então nos dê essa terra para ser nossa propriedade e não nos faça ir para o outro lado do rio Jordão.
6 Moyize alobaki na bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni :
6 Porém Moisés disse às tribos de Gade e de Rúben: — Vocês querem ficar aqui enquanto os seus patrícios vão para a guerra?
7 Mpo na nini bolingi lisusu kolembisa mitema ya bana ya Isalaele oyo bazali kokende na mokili oyo Yawe apesaki bango ?
7 Será que vocês querem desanimar o povo de Israel para que não entre na terra que o Senhor lhe está dando?
8 Oyo ezali penza makambo oyo batata na bino basalaki tango natindaki bango wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kokende kononga mokili.
8 Os pais de vocês fizeram a mesma coisa quando os enviei de Cades-Barneia para espionar esta terra.
9 Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango.
9 Eles chegaram até o vale de Escol e viram a terra; mas, quando voltaram, desanimaram o povo para que não entrasse na terra que o Senhor lhe estava dando.
10 Na mokolo wana, kanda ya Yawe epelaki mpe alapaki ndayi oyo :
10 — Então, naquele dia, o Senhor ficou muito irado e disse:
11 « Lokola batosaki Ngai te na motema mobimba, moko te kati na bato oyo bazali na mibu tuku mibale mpe komata, ba-oyo babimaki na Ejipito, akomona mokili oyo nalakaki, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi
11 “Os homens que vieram do Egito, de vinte anos para cima, deixaram de ser fiéis a mim, e por isso juro que eles não verão a terra que prometi dar a Abraão, a Isaque e a Jacó.”
12 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya libota ya Kenizi, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni, pamba te batosaki Ngai Yawe na mitema na bango mobimba. »
12 Somente Calebe, filho de Jefoné, o quenezeu, e Josué, filho de Num, continuaram fiéis ao Senhor .
13 Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.
13 O Senhor ficou irado com o povo de Israel e os fez andar pelo deserto quarenta anos, até que morresse toda a gente daquele tempo, isto é, o povo que havia desagradado a Deus, o Senhor .
14 Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele.
14 E agora vocês, raça de gente pecadora, estão tomando o lugar dos seus pais a fim de aumentar ainda mais a ira do Senhor contra o povo de Israel.
15 Soki boboyi kolanda nzela na Ye, akotika lisusu bato oyo nyonso na esobe mpe bato oyo bakobebisama likolo na bino.
15 Se vocês não quiserem segui-lo, ele abandonará novamente todo o povo no deserto, e eles serão destruídos por causa de vocês.
16 Babelemaki pene na Moyize mpe balobaki :
16 Mas a gente das tribos de Rúben e de Gade chegou perto de Moisés e disse: — Nós mesmos vamos construir aqui currais para as nossas ovelhas e vacas e também cidades para as nossas famílias.
17 Kasi tozali kolata na lombangu bibundeli na biso mpe kokende na liboso ya bana ya Isalaele kino tango tokokomisa bango na esika na bango. Bongo, na tango yango, basi mpe bana na biso bakotikala awa, kati na bingumba batonga makasi, mpo na komibatela liboso ya bavandi ya mokili oyo.
17 Depois estaremos prontos para marchar para a guerra na frente dos nossos patrícios israelitas, até fazê-los tomar posse da terra que será deles. Porém as nossas famílias ficarão aqui nas cidades cercadas de muralhas e assim estarão a salvo dos moradores da terra.
18 Tokotikala kozonga na bandako na biso te soki moto moko na moko ya Isalaele azwi libula na ye te ;
18 Não voltaremos para as nossas casas até que todos os outros israelitas tomem posse da terra que será deles.
19 mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani.
19 Não tomaremos posse de nenhuma propriedade no meio deles no outro lado do rio Jordão, pois receberemos a nossa parte aqui, a leste do Jordão.
20 Moyize alobaki na bango :
20 Aí Moisés respondeu: — Se vocês vão fazer isso, então na presença de Deus, o
21 mpe soki bino nyonso oyo bosimbi bibundeli bokeyi na ngambo mosusu ya Yordani liboso ya Yawe, kino abengana banguna na Ye
21 E que todos os seus homens armados atravessem o rio Jordão debaixo das ordens do Senhor , até que os nossos inimigos sejam expulsos diante dele,
22 mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe.
22 e nós conquistemos a terra. Depois vocês poderão voltar porque já terão cumprido a sua obrigação para com Deus, o Senhor , e para com os seus patrícios israelitas. E o Senhor reconhecerá esta terra a leste do rio Jordão como propriedade de vocês.
23 Kasi soki bosali bongo te, bokosala nde lisumu na miso ya Yawe mpe boyeba ete, lisumu na bino ekolanda bino.
23 Porém, se vocês não cumprirem o que estão prometendo, estarão pecando contra o Senhor . E fiquem sabendo que vocês serão castigados por causa dos seus próprios pecados.
24 Botonga bingumba makasi mpo na basi mpe bana na bino, botonga mapango mpo na bibwele na bino, kasi bokokisa mpe elaka oyo bopesi.
24 Construam as cidades para as suas famílias e façam currais para as suas ovelhas e vacas. E cumpram o que prometeram.
25 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni balobaki na Moyize :
25 Os homens de Gade e de Rúben disseram a Moisés o seguinte: — Nós faremos o que o senhor mandar.
26 Bana mpe basi na biso elongo na banyama mpe bibwele na biso bakotikala awa, na bingumba ya Galadi.
26 As nossas crianças, as nossas mulheres, as nossas ovelhas, as nossas cabras e todo o gado ficarão aqui nas cidades de Gileade.
27 Kasi mpo na biso basali na yo, mobali nyonso akosimba bibundeli mpo na kokende na bitumba ; tokokatisa na ngambo mpo na kobunda liboso ya Yawe ndenge kaka nkolo na biso asili koloba.
27 Mas todos nós estamos prontos para a guerra. Conforme a sua ordem, atravessaremos o Jordão e batalharemos, debaixo do comando do Senhor Deus.
28 Boye, Moyize apesaki mitindo na tina na bango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakambi ya mabota ya Isalaele.
28 Então Moisés deu ordens a respeito dos homens das tribos de Rúben e de Gade ao sacerdote Eleazar, a Josué, filho de Num, e aos chefes das famílias das tribos dos israelitas.
29 Moyize alobaki na bango :
29 Ele disse assim: — Debaixo do comando de Deus, o
30 Kasi soki bakatisi elongo na bino te mpo na kokende na bitumba, bakozwa libula elongo na bino, na mokili ya Kanana.
30 Porém, se eles não atravessarem armados o rio Jordão, junto com vocês, então deverão receber a parte deles na terra de Canaã.
31 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni bazongisaki :
31 Os homens de Gade e de Rúben responderam: — Senhor, nós faremos o que o
32 Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani.
32 Debaixo do comando dele atravessaremos o Jordão, armados, e lutaremos na terra de Canaã; e assim as terras deste lado do rio Jordão serão nossa propriedade.
33 Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani : mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango.
33 Então Moisés deu às tribos de Gade e de Rúben e a uma metade da tribo de Manassés, filho de José, a região de Seom, o rei dos amorreus, e a região de Ogue, rei de Basã, junto com as cidades e as terras que havia em redor delas.
34 Bakitani ya Gadi batongaki bingumba oyo : Diboni, Ataroti, Aroeri ;
34 Os homens da tribo de Gade construíram de novo as cidades de Dibom, Atarote, Aroer,
35 Aroti-Shofani, Yaezeri, Yogibeka ;
35 Atarote-Sofã, Jazer, Jogbeá,
36 Beti-Nimira mpe Beti-Arani lokola bingumba ya makasi ; mpe batongaki lisusu mapango mpo na bibwele na bango.
36 Bete-Ninra e Bete-Harã. Construíram muralhas ao redor delas e também currais.
37 Bakitani ya libota ya Ribeni batongaki bingumba oyo : Eshiboni, Eleale mpe Kiriatayimi
37 Os homens de Rúben construíram de novo Hesbom, Eleal, Quiriataim,
38 elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.
38 Nebo, Baal-Meom (alguns nomes foram mudados) e Sibma. E deram outros nomes às cidades que eles construíram de novo.
39 Bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase bakendeki kino na Galadi, babotolaki yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
39 O grupo de famílias de Maquir, filho de Manassés, foi para Gileade, e a conquistou, e expulsou os amorreus que estavam ali.
40 Boye, Moyize apesaki mokili ya Galadi epai ya bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase, mpe bakomaki kovanda kuna.
40 Portanto, Moisés deu Gileade ao grupo de famílias de Maquir, e eles moraram ali.
41 Yairi, moko kati na bakitani ya Manase, abotolaki bamboka na yango ya mike mpe abengaki yango Avoti Yairi.
41 Jair, descendente de Manassés, foi e conquistou alguns povoados dos amorreus e os chamou de “povoados de Jair”.
42 Mpe Noba abotolaki Kenati mpe bamboka na yango ya mike oyo ya zingazinga mpe abengaki yango Noba, ndenge ezalaki kombo na ye.
42 Noba foi e conquistou a cidade de Quenate e os seus povoados. E pôs o nome nela de Noba, que era o nome dele mesmo.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?