1 Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.
2 Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ;
3 mpe akomaki koloba maloba oyo :
4 maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe,
5 ‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko,
6 Epanzana lokola miluka ya mike-mike,
7 Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango,
8 Nzambe abimisaki bango na Ejipito,
9 Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali,
10 Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki :
11 Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.
12 Balami azongiselaki Balaki :
13 « Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
14 Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
15 Bongo Balami alobaki maloba oyo :
16 oyo ayokaka maloba na Nzambe,
17 ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ;
18 Bakobotola mokili ya Edomi,
19 Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi,
20 Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo :
21 Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo :
22 kasi bino bato ya Keni, bokobebisama
23 Mpe na suka, alobaki maloba oyo :
24 Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi,
25 Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.