1 Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye.
2 Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango :
3 Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema :
4 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango :
5 Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »
6 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
7 Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.
8 Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
9 Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
10 Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.
11 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu :
12 Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango :
13 Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu :
15 Yesu azongiselaki bango :
16 Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
17 Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
18 Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye :
19 Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
20 Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye,
21 pamba te azalaki komilobela :
22 Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki :
23 Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.
24 Alobaki na bango :
25 Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
26 Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
27 Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga :
28 Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango :
29 Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki :
30 Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango :
31 Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
32 Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.
33 Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki :
34 Kasi Bafarizeo bazalaki koloba :
35 Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.
36 Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.
37 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke !
38 Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »