1 Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.
2 Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki :
3 Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :
4 mpe Yesu alobaki na ye :
5 Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.
6 Alobaki :
7 Yesu azongiselaki ye :
8 Mokonzi ya basoda alobaki :
9 Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
10 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye :
11 Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
12 Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
13 Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda :
14 Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele.
15 Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
16 Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.
17 Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki :
18 Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.
19 Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki :
20 Kasi Yesu alobaki na ye :
21 Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye :
22 Kasi Yesu alobaki na ye :
23 Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
24 Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
25 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga :
26 Kasi Yesu alobaki na bango :
27 Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
28 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.
29 Bakomaki koganga :
30 Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki.
31 Milimo mabe esengaki na Yesu :
32 Yesu alobaki na milimo yango :
33 Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.
34 Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.