Jeremias 8

LIN

1 Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango.

2 Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.

3 Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›

4 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi :

5 Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ?

6 Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka,

7 Ezala kutu nkongi, kati na likolo,

8 Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya,

9 Bato ya bwanya bakoyokisama soni,

10 Yango wana, nakokaba basi na bango

11 bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo

12 Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ?

13 Nakobebisa milona na bango,

14 Mpo na nini tozali kovanda awa ?

15 Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia,

16 Lokito ya bampunda ya banguna

17 « Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka,

18 Pasi na ngai ezangeli kisi

19 Yoka koganga ya bato na ngai

20 « Tango ya kobuka mbuma esili koleka,

21 Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi,

22 Boni, kisi ezali te kati na Galadi ?

23 Ah ! Soki moto na ngai ezalaki etima,

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado