1 Tala liloba oyo Yawe alobi :
2 Nakotinda bapaya na Babiloni
3 Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te
4 Bato oyo bakokweya na mopanga
5 Ata soki mokili na bango etondaki na masumu
6 Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino !
7 Babiloni ezali lokola kopo ya wolo na loboko ya Yawe ;
8 Babiloni ekokweya na mbalakata mpe ekobukana !
9 ‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ;
10 ‹ Yawe apesi biso etumbu !
11 Bopelisa basonge ya makonga,
12 Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni !
13 Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene,
14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko :
15 Asala mabele na nguya na Ye,
16 Tango agangaka,
17 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba,
18 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ;
19 Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te,
20 Ozalaki solo marto,
21 elongo na yo, napanzaki mpunda mpe motambolisi na yango ;
22 elongo na yo, napanzaki mwasi mpe mobali ;
23 elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango ;
24 Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso
25 « Yo ngomba oyo obebisaka,
26 Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo
27 « Botelemisa bendele kati na mokili !
28 Bobongisa bikolo mpo na kobundisa yango :
29 Mikili ezali koningana mpe kotepatepa,
30 Basoda ya Babiloni batiki kobunda,
31 Bato oyo bamemaka mikanda bazali kolandana mbangu,
32 bakangi bapon mpe bibale ;
33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
34 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ;
35 Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso
36 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :
37 Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga,
38 Bato na yango nyonso bakokoma koganga
39 Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto,
40 « nakomema bango ndenge bamemaka bampate
41 Ndenge nini bakangi Sheshaki !
42 Ebale monene ekozindisa Babiloni,
43 Bingumba na yango ekobebisama,
44 Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni,
45 Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni !
46 Bobanga te mpe bolemba nzoto te
47 Pamba te tango ekoya solo,
48 Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango
49 « Babiloni mpe esengeli kokweya,
50 Bino bato oyo bobiki na mopanga,
51 Tosambwe, pamba te totiolami ;
52 Kasi na mikolo ekoya, »
53 Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola
54 « Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni,
55 Pamba te Yawe akobebisa Babiloni
56 Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ;
57 Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya,
58 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
59 Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako.
60 Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni.
61 Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi.
62 Bongo okoloba : ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. ›
63 Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba :
64 ‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › »