Jeremias 18

LIN

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi :

2 — Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.

3 Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye.

4 Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye.

5 Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai :

6 — Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?

7 Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo,

8 bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango.

9 To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala,

10 bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu.

11 Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›

12 Kasi bakozongisa : ‹ Ezali na tina te ! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »

13 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :

14 Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani

15 Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai,

16 Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te,

17 Nakopanza bango liboso ya banguna na bango

18 Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »

19 Eh Yawe, yoka makambo oyo

20 Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ?

21 Mpo na yango, boma bana na bango na nzala,

22 Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango

23 Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado