Jeremias 17

LIN

1 « Masumu ya Yuda ezali lokola makomi

2 Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali,

3 Oh ngomba na Ngai kati na mokili,

4 Likolo ya mabe na yo,

5 Tala liloba oyo Yawe alobi :

6 Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ;

7 Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe

8 Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi,

9 Motema eleki biloko nyonso na lokuta

10 « Ngai Yawe,

11 Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te

12 Kiti ya Bokonzi ya nkembo,

13 Oh Yawe, Elikya ya Isalaele,

14 Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ;

15 Tala, bato oyo bazali koloba na ngai :

16 Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele

17 Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngai

18 Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni,

19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.

20 Loba na bango : ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe !

21 Tala liloba oyo Yawe alobi : Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi ;

22 moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.

23 Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai.

24 Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,

25 bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.

26 Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.

27 Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado