Jonas 3

LIN

1 Yawe alobaki na Yona na mbala ya mibale :

2 — Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo.

3 Yona atosaki Liloba na Yawe ; atelemaki mpe akendeki na Ninive. Nzokande Ninive ezalaki engumba moko ya monene na miso ya Nzambe ; esengelaki kosala mikolo misato mpo na kosilisa kotambola kati na yango.

4 Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola :

5 Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe ; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.

6 Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.

7 Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive :

8 Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko.

9 Nani ayebi ? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. »

10 Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado