Isaías 6

LIN

1 Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.

2 Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.

3 Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu :

4 Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga.

5 Nalobaki :

6 Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai ;

7 atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki :

8 Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba :

9 Yawe alobaki na ngai :

10 Komisa bato oyo mitema makasi,

11 Boye nalobaki :

12 kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.

13 Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado