1 Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. »
2 Sarayi alobaki na Abrami :
3 Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
4 Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.
5 Boye, Sarayi alobaki na Abrami :
6 Abrami alobaki :
7 Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri.
8 Atunaki ye :
9 Anjelu ya Yawe alobaki na ye :
10 Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu :
11 Alobaki na ye lisusu :
12 Akozala lokola ane ya zamba.
13 Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? »
14 Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
15 Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. »
16 Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.