Eclesiastes 5

LIN

1 Kowelela te kofungola monoko na yo,

2 Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi,

3 Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe,

4 Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.

5 Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ?

6 Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe.

7 Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.

8 Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.

9 Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.

10 Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele,

11 Pongi ya mosali ezalaka ya kimia,

12 Namoni mabe moko na se ya moyi,

13 likambo moko ya mabe ya mbalakata

14 Ndenge abotamaki bolumbu

15 Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa :

16 Alekisi mikolo nyonso ya bomoi na ye kati na molili,

17 Mpo na yango, tala likambo

18 Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe !

19 Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado