1 Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba !
2 Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula,
3 Nakosakola Kombo ya Yawe.
4 Yawe azali lokola Libanga ;
5 Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ;
6 Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ?
7 Bokanisa mikolo ya kala,
8 Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki
9 Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ;
10 Amonaki ye na esobe,
11 Azali lokola mpongo
12 Ye moko Yawe akambaki bango ;
13 Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili,
14 miliki ya bangombe mpe ya bameme ;
15 Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ;
16 Bapesaki Yawe kanda makasi
17 Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe
18 Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino
19 Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango,
20 Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai,
21 Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te,
22 Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto,
23 Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi,
24 Nakotindela bango nzala makasi,
25 Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ;
26 Nalobaki : Nakopanza bango
27 Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai
28 Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele,
29 Soki kaka bazalaki bato ya bwanya,
30 Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko,
31 Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ;
32 Bilanga na bango ya vino ewuti
33 Vino na bango ezali ngenge ya banyoka,
34 « Boni, ebombami epai na Ngai te ?
35 Ngai nde nazongisaka mabe na mabe,
36 Yawe akosambisa bato na Ye,
37 Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ?
38 Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango
39 Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ;
40 Natomboli loboko na Ngai na likolo,
41 tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai,
42 Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato,
43 Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye !
44 Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.
45 Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele,
46 alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.
47 Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
48 Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize :
49 « Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango.
50 Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,
51 pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.
52 Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »