1 Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo
2 Nzete ya sipele, lela,
3 Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela,
4 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe na ngai, alobi :
5 Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te.
6 Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.
7 Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma ; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale : nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme.
8 Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.
9 Nalobaki na etonga ya bibwele :
10 Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili.
11 Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.
12 Nalobaki na bango :
13 Mpe Yawe alobaki na ngai :
14 Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi.
15 Yawe alobaki na ngai :
16 Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo.
17 Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo !