Salmos 136

LIN

1 Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ;

2 Bosanzola Nzambe ya banzambe ;

3 Bosanzola Nkolo na bankolo ;

4 Ye kaka nde asalaka bikamwa ya minene ;

5 Akelaki likolo na mayele na Ye ;

6 Atandaki mabele na likolo ya mayi ;

7 Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ;

8 moyi mpo na kongengisa mokolo ;

9 sanza mpe minzoto mpo na kongengisa butu ;

10 Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ;

11 Abimisaki Isalaele wuta na Ejipito ;

12 na nguya monene ya loboko na Ye ;

13 Akabolaki ebale monene ya Barozo na biteni mibale ;

14 Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ;

15 Azindisaki Faraon elongo na mampinga na ye kati na ebale monene ya Barozo ;

16 Atambolisaki bato na Ye kati na esobe ;

17 Abetaki bakonzi minene ;

18 Abomaki bakonzi ya nguya ;

19 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ;

20 mpe Ogi, mokonzi ya Bashani ;

21 Akabaki mabele na bango lokola libula ;

22 lokola libula epai ya Isalaele, mosali na Ye ;

23 Akanisaki biso tango basambwisaki biso ;

24 Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ;

25 Apesaka bilei na bikelamu nyonso ;

26 Bosanzola Nzambe ya likolo ;

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado