Rute 2

LIN

1 Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye ; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi ; kombo na ye ezalaki « Boazi. »

2 Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi :

3 Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki.

4 Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi ; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba :

5 Boazi atunaki mokambi ya bato oyo bakataka ble :

6 Mokambi ya bato oyo bakataka ble azongisaki :

7 Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke.

8 Boazi alobaki na Rite :

9 Tala malamu bilanga oyo epai wapi bato bazali kokata ble mpe zala na sima ya bana basi oyo bazali kolokota ble. Nalobi na mibali ete basimba yo te. Tango nyonso ozali na posa ya mayi, kende mpe mela na bambeki oyo mibali batondisi. »

10 Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki :

11 Boazi azongisaki :

12 Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye !

13 Rite alobaki :

14 Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye : « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. »

15 Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te.

16 Bokoki mpe kokweyisa bambuma mpo na ye, mpo ete alokota na ye, mpe bozomela ye te. »

17 Boye Rite alokotaki ble na elanga kino na pokwa, aningisaki oyo alokotaki mpe azwaki bakilo pene tuku minei ya bambuma ya orje.

18 Amemaki yango na engumba, mpe mama-bokilo na ye amonaki bambuma oyo alokotaki. Rite abimisaki lisusu biloko oyo atikaki tango atondaki mpe apesaki yango epai ya mama-bokilo na ye.

19 Naomi atunaki Rite :

20 Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »

21 Rite, moto ya Moabi, alobaki :

22 Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi :

23 Boye Rite avandaki pembeni ya basali ya Boazi mpo na kolokota mito ya ble, kino tango ya kobuka bambuma ya orje mpe ya ble, esilaki. Awumelaki kovanda elongo na mama-bokilo na ye.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado