Neemias 7

LIN

1 Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi : bato na bato na mosala na bango.

2 Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe.

3 Nalobaki na bango :

4 Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te.

5 Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna :

6 Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ;

7 bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana.

8 Bakitani ya Pareoshi :

9 Bakitani ya Shefatia :

10 Bakitani ya Ara :

11 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi :

12 Bakitani ya Elami :

13 Bakitani ya Zatu :

14 Bakitani ya Zakayi :

15 Bakitani ya Binuwi :

16 Bakitani ya Bebayi :

17 Bakitani ya Azigadi :

18 Bakitani ya Adonikami :

19 Bakitani ya Bigivayi :

20 Bakitani ya Adini :

21 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi :

22 Bakitani ya Ashumi :

23 Bakitani ya Betsayi :

24 Bakitani ya Arifi :

25 Bakitani ya mboka Gabaoni :

26 Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa :

27 Bato ya mboka Anatoti :

28 Bato ya mboka Beti-Azimaveti :

29 Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti :

30 Bato ya bamboka Rama mpe Geba :

31 Bato ya mboka Mikimasi :

32 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi :

33 Bato ya mboka Nebo mosusu :

34 Bato ya mboka ya Elami mosusu :

35 Bato ya mboka Arimi :

36 Bakitani ya mboka Jeriko :

37 Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono :

38 Bakitani ya engumba Sena :

39 Tala motango ya Banganga-Nzambe :

40 Bakitani ya Imeri :

41 Bakitani ya Pashuri :

42 Bakitani ya Arimi :

43 Tala motango ya Balevi :

44 Tala motango ya bayembi :

45 Tala motango ya bakengeli bikuke :

46 Basali ya Tempelo :

47 Kerosi, Siya, Padoni,

48 Lebana, Agaba, Shalimayi,

49 Anani, Gideli, Gaari,

50 Reaya, Retsini, Nekoda,

51 Gazami, Uza, Paseya,

52 Besayi, Mewunimi, Nefusimi,

53 Bakibuki, Akufa, Aruri,

54 Batsiliti, Meyida, Arisha,

55 Barikosi, Sisera, Tama,

56 Netsia mpe Atifa.

57 Tala bakitani ya basali ya Salomo :

58 Yala, Darikoni, Gideli,

59 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni.

60 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale.

61 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :

62 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda :

63 Mpe kati na Banganga-Nzambe :

64 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.

65 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.

66 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,

67 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano,

68 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.

69 Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe.

70 Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale.

71 Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe.

72 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado