Neemias 11

LIN

1 Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.

2 Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.

3 Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;

4 mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi :

5 mpe Maaseya, mwana mobali ya Baruki, mwana mobali ya Koli-Oze, mwana mobali ya Azaya, mwana mobali ya Adaya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Zakari, moko kati na bakitani ya Shiloni.

6 Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.

7 Mpo na bakitani ya Benjame :

8 mpe Gabayi elongo na Salayi. Bango nyonso bazalaki bato nkama libwa na tuku mibale na mwambe.

9 Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango ; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba.

10 Kati na Banganga-Nzambe :

11 Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe

12 elongo na bandeko na bango, nkama mwambe na tuku mibale na mibale oyo bazalaki kosala na Ndako ya Nzambe ;

13 elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota ;

14 Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.

15 Kati na Balevi :

16 Shabetayi mpe Yozabadi oyo bazalaki na molongo ya bakambi ya Balevi mpe bazalaki na mokumba ya misala ya libanda ya Ndako ya Nzambe ;

17 Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ;

18 Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.

19 Bakengeli bikuke :

20 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.

21 Basali ya Tempelo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, mpe Tsika elongo na Gishipa bazalaki bakambi na bango.

22 Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.

23 Misala ya bayembi ezalaki kotambolisama mokolo na mokolo na mitindo ya mokonzi.

24 Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato.

25 Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,

26 kati na Yeshua, kati na Molada, kati na Beti-Paleti,

27 kati na Atsari-Shuwali, kati na Beri-Sheba mpe bamboka na yango ya mike-mike,

28 kati na Tsikilagi, kati na Mekona mpe bamboka na yango ya mike-mike,

29 kati na Eini-Rimoni, kati na Tsorea, kati na Yarimuti,

30 kati na Zanoa, Adulami mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Lakishi mpe bilanga na yango ya zingazinga, mpe kati na Azeka mpe bamboka na yango ya mike-mike. Boye bavandaki na etuka mobimba longwa na Beri-Sheba kino na Lubwaku ya Inomi.

31 Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,

32 kati na Anatoti, Nobi mpe Anania,

33 kati na Atsori, Rama mpe Gitayimi,

34 kati na Adidi, Tseboyimi mpe Nebalati,

35 kati na Lodi mpe Ono, lubwaku ya bato oyo basalaka misala ya maboko.

36 Masanga mosusu ya Balevi ya Yuda ekendeki kovanda kati na bato ya Benjame.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado