Mateus 21

LIN

1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale.

2 Alobaki na bango :

3 Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.

4 Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama :

5 « Boloba na Siona, mboka kitoko :

6 Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango.

7 Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.

8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela.

9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga :

10 Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna :

11 Bato bazalaki kozongisa :

12 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.

13 Alobaki na bango :

14 Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango.

15 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! »

16 Balobaki na Yesu :

17 Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.

18 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala.

19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango :

20 Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki :

21 Yesu azongiselaki bango :

22 Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.

23 Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki :

24 Yesu azongiselaki bango :

25 Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?

26 Soki mpe tolobi : « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli.

27 Boye, bazongiselaki Yesu :

28 Yesu alobaki na bango lisusu :

29 Mwana azongisaki : « Naboyi. »

30 Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki : « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi ! »

31 Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ?

32 pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.

33 Boyoka lisese mosusu : Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.

34 Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye ;

35 kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.

36 Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso ; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso.

37 Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai ! »

38 Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »

39 Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.

40 Tango nkolo elanga ya vino akoya, akosala bafuteli elanga wana nini ?

41 Bazongisaki :

42 Yesu alobaki na bango :

43 Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [

44 Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.]

45 Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango.

46 Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado