1 Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye :
2 — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
3 Yesu azongiselaki bango :
4 Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
5 Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›
6 abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino !
7 Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :
8 « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,
9 basambelaka Ngai kaka na pamba,
10 Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango :
11 eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
12 Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye :
13 Yesu azongisaki :
14 Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.
15 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu :
16 Yesu atunaki bango :
17 Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?
18 Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
19 Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
20 Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
21 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.
22 Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga :
23 Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye :
24 Yesu azongisaki :
25 Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki :
26 Yesu azongisaki :
27 Mwasi yango alobaki :
28 Bongo Yesu alobaki na ye :
29 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile ; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna.
30 Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.
31 Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
32 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki :
33 Bayekoli na Ye bazongisaki :
34 Yesu atunaki bango :
35 Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele.
36 Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.
37 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
38 Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.
39 Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.