1 Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese :
2 Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino.
3 Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
4 Atindelaki bango mosali mosusu ; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye.
5 Atindaki lisusu mosali mosusu ; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele ; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.
6 Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda : mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai. »
7 Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »
8 Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.
9 Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu.
10 Nanu botanga Makomi oyo te :
11 Ezali Nkolo nde alingaki bongo,
12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye ; mpe moto na moto akendeki.
13 Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko.
14 Tango bakomaki epai na Ye, balobaki :
15 Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango :
16 Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango :
17 Yesu alobaki na bango :
18 Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :
19 — Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana.
20 Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
21 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo :
22 bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
23 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ?
24 Yesu azongiselaki bango :
25 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
26 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »
27 Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.
28 Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki :
29 Yesu azongisaki :
30 Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
31 Tala mobeko oyo elandi : « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.
32 Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye :
33 Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.
34 Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye :
35 Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki :
36 Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu :
37 Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
38 Wana azalaki koteya, Yesu alobaki :
39 balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
40 bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
41 Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.
42 Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza.
43 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango :
44 Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.