1 Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.
2 Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye :
3 Yesu azongiselaki bango :
4 Balobaki na Yesu :
5 Bongo Yesu alobaki na bango :
6 Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. »
7 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye,
8 mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.
9 Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.
10 Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango.
11 Yesu alobaki na bango :
12 Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
13 Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
14 Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli :
15 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
16 Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
17 Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki :
18 Yesu azongisaki :
19 Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
20 Moto yango alobaki lisusu :
21 Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye :
22 Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
23 Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango :
24 Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu :
25 Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana :
27 Yesu atalaki bango mpe alobaki :
28 Petelo alobaki na Yesu :
29 Yesu azongisaki :
30 akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.
31 Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
32 Wana bazalaki na nzela mpo na komata na Yelusalemi, Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bayekoli bazalaki na mawa, mpe bato mosusu oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga.
33 — Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano,
34 bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.
35 Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye :
36 Yesu atunaki bango :
37 Bazongisaki :
38 Yesu alobaki na bango :
39 Bazongisaki :
40 kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
41 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane.
42 Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango :
43 Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;
44 mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso !
45 Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
46 Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga.
47 Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga :
48 Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi :
49 Yesu atelemaki mpe alobaki :
50 Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu.
51 Yesu alobaki na ye :
52 Yesu alobaki na ye :