Lucas 9

LIN

1 Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ;

2 mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli.

3 Alobaki na bango :

4 Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.

5 Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.

6 Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.

7 Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, »

8 bamosusu : « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu : « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. »

9 Kasi Erode azalaki komilobela : « Ngai nde nakataki Yoane moto ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani ? »

10 Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.

11 Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.

12 Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye :

13 Kasi Yesu alobaki na bango :

14 Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano.

15 Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki.

16 Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato.

17 Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.

18 Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango :

19 Bazongisaki :

20 Yesu atunaki bango lisusu :

21 Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko.

22 Mpe alobaki :

23 Bongo Yesu alobaki na bango nyonso :

24 Pamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango.

25 Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye ?

26 Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.

27 Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.

28 Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.

29 Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.

30 Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya

31 oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.

32 Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.

33 Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki :

34 Wana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango.

35 Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki :

36 Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.

37 Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.

38 Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki :

39 Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye.

40 Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.

41 Yesu alobaki :

42 Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.

43 Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe.

44 — Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.

45 Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.

46 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango.

47 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye,

48 mpe alobaki na bango :

49 Yoane alobaki :

50 Yesu alobaki :

51 Lokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi.

52 Atindaki bantoma liboso na Ye ; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko.

53 Kasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi.

54 Tango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki :

55 Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango :

56 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.

57 Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu :

58 Yesu azongiselaki ye :

59 Yesu alobaki na mobali mosusu :

60 Yesu alobaki na ye :

61 Mosusu lisusu alobaki na Ye :

62 Yesu azongiselaki ye :

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado