Lucas 22

LIN

1 Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene,

2 bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.

3 Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale.

4 Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango.

5 Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo.

6 Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te.

7 Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika,

8 Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango :

9 Batunaki Ye :

10 Yesu azongiselaki bango :

11 Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »

12 Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.

13 Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.

14 Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.

15 Alobaki na bango :

16 pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.

17 Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki :

18 pamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.

19 Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki :

20 Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki :

21 Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai.

22 Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.

23 Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.

24 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.

25 Yesu alobaki na bango :

26 Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.

27 Pamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.

28 Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.

29 Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,

30 mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.

31 Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.

32 Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.

33 Kasi Petelo azongisaki :

34 Yesu alobaki na ye :

35 Bongo Yesu atunaki bango :

36 Alobaki na bango :

37 Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.

38 Bayekoli balobaki :

39 Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.

40 Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango :

41 Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye :

42 « Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [

43 Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye.

44 Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]

45 Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.

46 Atunaki bango :

47 Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,

48 kasi Yesu atunaki ye :

49 Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye :

50 Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali.

51 Kasi Yesu alobaki :

52 Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye :

53 Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.

54 Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.

55 Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.

56 Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki :

57 Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki :

58 Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki :

59 Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende :

60 Kasi Petelo azongisaki :

61 Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »

62 Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.

63 Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye.

64 Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi :

65 Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.

66 Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango.

67 Balobaki :

68 mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.

69 Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.

70 Bango nyonso batunaki :

71 Bongo balobaki :

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado