1 Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo :
2 Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso,
3 Bino bakonzi, boyoka !
4 Eh Yawe, tango obimaki na Seiri,
5 Bangomba eninganaki liboso ya Yawe,
6 Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ;
7 Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te,
8 Tango baponaki banzambe ya sika,
9 Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele,
10 Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe,
11 Bokumisa mingongo ya bayembi,
12 Debora, lamuka ! Lamuka !
13 Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi,
14 Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi.
15 Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ;
16 Mpo na nini avandi kati na lopango ?
17 Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani.
18 Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa,
19 Bakonzi oyo bazali banguna bayaki
20 Wuta na likolo, minzoto ebundaki ;
21 Mayi moke ya Kishoni ememaki bango,
22 Makolo ya bampunda enyataki mabele,
23 Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe.
24 Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni,
25 Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki ;
26 Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ;
27 Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki ;
28 Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa,
29 Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye,
30 « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba :
31 Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo !