Jeremias 22

LIN

1 Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo :

2 ‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,

3 tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.

4 Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango.

5 Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › »

6 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda :

7 Nakotinda bato ete baya kobebisa yo,

8 Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? ›

9 Mpe eyano ekozala : ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › »

10 Bolela te mpo na kufa ya mokonzi

11 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te.

12 Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. »

13 « Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye

14 oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene

15 Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele

16 Alongisaki babola mpe bato bakelela,

17 « Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka

18 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :

19 Bakokunda ye ndenge bakundaka ane,

20 « Mata na Libani mpe ganga makasi !

21 Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia

22 Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso

23 Yo oyo ovandaka na Libani,

24 Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.

25 Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni.

26 Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa.

27 Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »

28 Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka

29 Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai !

30 Tala liloba oyo Yawe alobi :

Ler em outra tradução

Comparar lado a lado