1 Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola.
2 Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
3 Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye :
4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
5 Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.
6 Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »
7 Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai,
8 Na tango nyonso oyo nalobaka,
9 Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, »
10 Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se :
11 Kasi Yawe azali elongo na ngai
12 Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga,
13 Boyembela Yawe ! Bokumisa Yawe !
14 Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe !
15 Tika ete alakelama mabe,
16 Tika ete moto yango akoma lokola bingumba
17 Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te
18 Mpo na nini penza nabimaki