1 Yobo azongisaki :
2 « Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo,
3 Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe,
4 nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso,
5 nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai,
6 Boni, alingaki kosalela nguya na Ye
7 Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye
8 Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te ;
9 Tango azali na mosala na ngambo ya nor,
10 Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ;
11 Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ;
12 Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ;
13 Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ;
14 Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai
15 Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ;
16 Nzambe alembisi ngai,
17 Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai