1 Kasi Yesu akendeki na ngomba ya banzete ya olive.
2 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.
3 Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bakumbaki mwasi moko oyo bakutaki azali kosala ekobo ; batambolisaki ye kati na ebele ya bato mpe batiaki ye liboso ya Yesu, na miso ya bato nyonso.
4 Balobaki na Yesu :
5 Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ?
6 Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye.
7 Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango :
8 Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele.
9 Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,
10 Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye :
11 Mwasi azongisaki :
12 Yesu alobaki lisusu na bato :
13 Bafarizeo balobaki na Ye :
14 Yesu azongiselaki bango :
15 Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.
16 Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te : Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai.
17 Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo.
18 Ngai, nazali kopesa litatoli na tina na Ngai moko, mpe Tata oyo atindaki Ngai azali lisusu kotatola na tina na Ngai.
19 Bongo batunaki Ye :
20 Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.
21 Yesu alobaki na bango lisusu :
22 Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango :
23 Yesu azongiselaki bango :
24 Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
25 Batunaki Ye :
26 Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
27 Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata.
28 Alobaki lisusu :
29 Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.
30 Wana Yesu azalaki koloba bongo, bato mingi bandimaki Ye.
31 Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye :
32 bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.
33 Bazongiselaki Ye :
34 Yesu azongiselaki bango :
35 Nzokande, mowumbu azalaka kati na libota tango nyonso te, kasi mwana azali kati na yango mpo na seko.
36 Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.
37 Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami ; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.
38 Ngai, nazali koloba makambo oyo namonaki epai ya Tata na Ngai ; bino mpe bozali kosala makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.
39 Bazongisaki :
40 Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe ! Abrayami atikala kosala bongo te.
41 Bozali penza kosala misala ya tata na bino.
42 Yesu alobaki na bango :
43 Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.
44 Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
45 Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te.
46 Nani kati na bino akoki kotalisa Ngai ete nasali masumu ? Soki nalobaka solo, mpo na nini bondimaka Ngai te ?
47 Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka ; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.
48 Bayuda bazongiselaki Ye :
49 Yesu azongisaki :
50 Nalukaka lokumu na Ngai moko te ; ezali na Moko oyo alukaka yango mpe asambisaka.
51 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akobatela Liloba na Ngai kati na ye akotikala kokufa te.
52 Na yango, Bayuda balobaki na Ye :
53 Boni, yo okanisi ete oleki Abrayami, tata na biso, oyo akufa to mpe oleki basakoli nyonso oyo bakufa ? Yango yo, ozali komimona nani ?
54 Yesu azongiselaki bango :
55 Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.
56 Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo.
57 Bayuda balobaki na Ye :
58 Yesu azongisaki :
59 Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.