1 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
2 bilombe mpe basoda ya mpiko,
3 bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu,
4 Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango
5 Bato bakokoma konyokolana bango na bango :
6 moko akokanga ndeko na ye ya mobali
7 Kasi na mokolo wana, akoganga :
8 Yelusalemi ezali kotepatepa,
9 Bilongi na bango ezali kofunda bango ;
10 Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo,
11 Mawa na moto mabe !
12 Bilenge bazali konyokola bato na Ngai,
13 Yawe atelemi na esambiselo,
14 Yawe akosamba elongo na bampaka
15 Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai
16 Yawe alobi :
17 Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata
18 Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ;
19 biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale,
20 bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto,
21 bapete ya mosapi, bapete ya zolo,
22 bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike,
23 bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.
24 Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ;
25 Mibali na bino bakokufa na mipanga,
26 Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ;