1 Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito :
2 « Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango :
3 Bato ya Ejipito bakosila mayele,
4 Nakokaba bato ya Ejipito
5 Mayi ya ebale monene ekokita,
6 Mayi ya miluka ekokoma solo,
7 elongo na matiti oyo ezalaka pembeni ya Nili,
8 Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela,
9 Bato oyo basalaka lino bakokufa soni ya makasi,
10 Bato oyo basimbaka mokili bakokweya,
11 Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba,
12 Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya ?
13 Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba,
14 Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu :
15 Eloko moko te ekosalema lisusu na Ejipito,
16 Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango.
17 Bongo mokili ya Yuda ekolengisa bato ya Ejipito na somo. Tango nyonso bakoyoka kombo ya Yuda, bakolenga na somo mpo na mabongisi nyonso oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asalaki mpo na kotelemela bango.
18 Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango : Engumba ya moyi.
19 Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili.
20 Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango.
21 Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma ; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango.
22 Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.
23 Na mokolo wana, bakopasola nzela moko wuta na Ejipito kino na Asiri. Bato ya Asiri bakokoma koya na Ejipito, mpe bato ya Ejipito bakokoma koya na Asiri. Bato ya Ejipito mpe bato ya Asiri bakokoma kosala elongo losambo mpo na Yawe.
24 Na mokolo wana, Isalaele akozala ekolo ya misato, sima na Ejipito mpe Asiri, lipamboli oyo Nzambe akomema na mokili.
25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo : « Tika ete bopambolama : Ejipito, bato na Ngai ; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai ! »